musicas.mus.br

Letras de músicas - letra de música - letra da música - letras e cifras - letras traduzidas - letra traduzida - lyrics - paroles - lyric - canciones - VANITé - ISRAEL NDONGALA MATELO - música e letra

Utilize o abecedário abaixo para abrir as páginas de letras dos artistas

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

Vanité letra


Vanité de vanité
Tout est vanité

Bozui na moto na mokili
Ezali nango pamba
Ezali lokolola fololo
Yango tomoni lelo oyo
Sima mikolo eko lengela

Bozui na moto na mokili
Ezali nango pamba
Ezali lokolola mungua
Oyo tomoni lelo oyo
Sima na tango eko limua

Bozui na moto na mokili
Ezali nango pamba
Ezali lokolola fololo
Tosepeli nango lelo oyo
Sima na tango eko lengela

Bozui na moto na mokili
Ezali nango pamba
Ezali lokolola mungua
Oyo tosimbi lelo oyo
Sima na tango eko limua

Eh vanité
Eh tout est vanité
Eh vanité
Eh tout est vanité

Ndako na ngai
Nani ako futela?
Lopango na nga
Nani ako somba?
Motuka na nga
Nani ako zua yango?
Lelo bomoyi na nga
Esili koleka
Ah ohh motema pasi

Muasi na nga
Nani ako zua?
Bana na nga nani ako bokola?
Bomengo na nga
Nani ako bénéficier?
Héritier nini?
Lelo pe tala ba familles bakomi ko bundela ngo

Ndako na nga eko tikala
Eko tikala eh
Lopa na nga eko tikala
Eko tikala eh
Bomengo na nga eko tikala
Eko tikala eh

Bana na nga bako tikala
"Bako tikala ehh"
Muasi na nga eko tikala
"Ako tikala ehh"
Nioso na nga eko tikala
"Eko tikala ehh"

Liboso na jésus
Nako kende se maboko pamba
Bobele ngai na yesu
Kuna nde toko zala
Intercesseur ya lelo
Na loboko ya mobali ya tata
Mokolo yango
Ako koma mosambisi na ngai
Jésus, tika tango naza na bomoyi
Na salela yo nkolo
Na landa nzela nayo

Tout est vanité
Vanité de vanité
Okoki ko somba mituka
Okoki ko somba mapango
Okoki ko zala na bomengo
Kasi soki ozangi yesu
Tout est vanité
Vanité de vanité
Landa nzela na yesu
Yende azali polé

Worship na nga eko tikala
Eko tikala ehh
Bana na ngai bako tikala
Bako tikala ehh
Misala na nga eko tikala
Eko tikala ehh
Banzembo na nga eko tikala
Eko tikala ehh
Nako kende se maboko pamba

Israel Ndongala Matelo - Letras

top 30 músicas

©2003 - 2024 - musicas.mus.br